Cholera (to pe pulupulu ya makila) ezali bokono ya mitshopo oyo uwuti na bacterie na kombo ya Vibrio cholerae. Pulupulu na kosanza bizali bilembo ya makasi ya bolakisi ete oza na bokono bwango. Bozuwi ya bokono ya cholera ewuti na komela mayi ya mbindo, na koliya biloko ya salete. Na video oyo okoki kotala na telephone na yo, to lakisi lolenge okoki ko mi batela po ete ozwa bokono wana te, to lakisi pe lisusu lolenge okoki ko petola mayi ya komele, ko sukola maboko na yo, mpe ko kende epayi ya munganga na tango omoni bilembo ya cholera (pulupulu ya makila) na nzoto na yo.