Kosokola maboko ezali lolenge okoki ko mibatela na microbes pe bokono. Maboko ya salete ekoki ko mema microbes oyo ekoki ko pesa yo bokono to pe bato misusu. Microbes lokola bacterie, virus, parasites, to pe ba champignons, na ba produits chimiques misusu ekoki ko kota na nzoto na yo directement na tango o simbi elongi na yo, miso, zolo, na monoko to pe ekoki ko kota indirectement na tango maboko ya salete esimbi esika maboko mosusu ya salete esimbaki, to pe esika bazali kolamba bileyi. Bizaleli ya kosokola maboko na mayi na sabuni to pe savon ezali lolenge ya yambo ya komibatela po ete ozua pe o panza bokono te. Ko banda na bokono lokola rhume, to pululu ti na bokono ya makasi lokola meningite, grippe to pe hepatite, na bokono misusu. Video oyo ezali kolakisa motuya ya kosokola maboko.