Virus ya Nil occidental ezali maladie ewutaka na kosuwa ya ba moustiques. Ba moustiques bazwaka virus na komela makila ya ba ndeke infecté oyo ba voyageaka. Moustique ya mwasi, Culex pipiens, ezali moustique ya liboso responsable ya transmission ya virus. Mais ba espèces misusu, neti ba Aedes aegypti na Aedes albopictus oyo baswaka na moyi, bakoki pe ko transmettre maladie. Ba symptômes to signes ya maladie yango ekoki kozala ndenge moko na grippe: fièvre ya makasi, mutu pasi, ba taches na poso, ba nodules lymphatiques ya ko vimba, kolemba makasi, pe kingo kokoma makasi. Soki ozali na ba symptômes oyo, esengeli okende na lombango na hôpital ya pembeni. Pona o mibatela po ete ozwa bokono yango esengeli omi batela pona ngungi aswa yo te. Vidéo oyo ezali kolakisa ba lolenge ebele ya ko mibatela neti na ndoko to pe libanda ya ndako na ko petola nzinga nzinga, pona ko éviter que ba ngungi oyo ba pesaka virus ya Nil occidental ba swa yo te.