Choléra ezali infection ya mitsopo oyo ezali causé par microbes to bactérie na kombo ya Vibrio cholera. Ba signes to symptômes ya yambo ya maladie yango ezali diarrhée to pulupulu pe ko sanza, pe yango ekoki ko causer mayi kosila na nzoto epayi na bato. Ko sala en sorte que bato oyo bazali na bokono yango ba zala na mayi na nzoto pendant ngonga ya molayi avant ba zwa ba soins médicaux ezali malamu mingi pona ko réduire taux de mortalité ya maladi yango.