Manioko ezali bileyi ya base ya au moins 800 millions ya batu na a peu pres 80 pays, mingi mingi na Afrique sub-saharienne, mais pe na Asie, Pacifique, pe na Amerique du Sud. Manioko ezali na cyanogens, oyo e protegeaka contre ba pestes, to pe ba niama misusu na ko produire cyanure. Ezali na sortes misusu ya manioko oyo ezalaka mwa bololo pe e produisaka ba cyanures ebele. Ba manioko wana esengeli e traitame avant ya kolia yango. Ba methodes traditionnelles neti ko tia na mayi pe ko kausa na moyi ekeseni selon efficacite na yango. Mais nzala ekoki kotinda mutu akende nzela ya mokuse. Resultat ya exposition exageree na cyanure ekoki ko causer empoisenement aigues na cyanure, goitre, pe maladi ya paralysie na kombo ya konzo. Environ 2.5 millions ya batu ya six pays ya Afrique ba vandaka na zones oyo ezali vulnerables na maladi ya konzo. Video oyo ezali ko presenter ba moyens simples ya kolongola cyanure na manioko, oyo to bengi na kombo ya methode ya ko tremper.