Malaria ezali bokono oyo ewuti na microbe oyo epesamaka na bato à partir ya koswama ya ngungi ya mwasi na kombo ya Anopheles. Ba signes to symptômes ya malaria ezali: ba fièvre makasi, kolenga, libumu pasi, mutu pasi, pe kolemba. Soki ozali na ba signes oyo, kende na lombangu na centre de santé ya pembeni. Malaria ekoki ko mema ba complications graves ya santé surtout epayi ya ba bébé na bana mike. Pona ko sala ete ozwa bokono ya malaria te, ezali malamu mingi soki ngungi aswi yo te.Na ndaku, ezali malamu mingi kosalela moustiquaire esika olalaka. Vidéo oyo ezali kolakisa ndenge nini osengeli kosalela moustiquaires butu nionso eko salisa yo pona ete ngungi ya malaria aswa yo te.